Mbíla
Apparence

Mbíla ezalí nzeté mpé mbuma oyo epesaka mafúta. Baesálelaka mosáká mpé mafúta mbila. Fololo na yangó baesalelaka masanga ma mbíla maye babengi o lokóta la Kikɔ́ngɔ nsámbá . Masanga maye mazalí na lángi la mpɛ́mbɛ́, na ntángo mangó mazalí naíno ya sika (mauti o mweté), mangó makolángwisaka tɛ́ kasi sɔ́kí mafándi mwa mikɔlɔ mingi mangó makómaka makási mpenzá mpé makolángwisa bato sɔ́kí bamameli mingi.
![]() |